John 4

Yesu asololi na mwasi ya Samariya

1Bafarizeo bayokaki ete Yesu azalaki kozwa mpe kobatisa bayekoli ebele koleka Jean. 2(Nzokande Yesu ye moko azalaki kobatisa te, kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa). 3Tango Nkolo ayokaki bongo, alongwaki na Yudea, mpe azongaki na Galileya. 4Kasi esengelaki na ye aleka na Samariya. 5Bongo akomaki na vile moko ya Samariya, kombo na yango Sishare, oyo ezalaki pene-pene na elanga oyo Yakobi apesaki na mwana na ye Zozefi. 6Libulu ya mayi ya Yakobi ezalaki kuna. Yesu alembaki mpo na mobembo, mpe avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene-pene ya ngonga midi. 7Mwasi moko ya Samariya ayaki kotoka mayi, bongo Yesu alobaki na ye :

—Pesa ngai mayi ya komela !

8(Bayekoli na ye bakendaki na vile mpo na kosomba biloko ya kolia).

9Kasi mwasi ya Samariya alobaki na ye :

—Yango ebandi boni ? Yo Moyuda osenga ngai mwasi ya Samariya mayi ya komela ? (Alobaki bongo pamba te, Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samariya).
10Yesu azongiselaki ye :

—Soki oyebaki likabo ya Nzambe, mpe nani oyo azali kosenga yo mayi, mbele yo moto olingaki kosenga ye mayi ya komela, mpe alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.

11Mwasi alobaki na Yesu :

—Tata, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo ! Bongo mayi yango ya bomoi okozwa yango wapi ?
12Boni, yo oleki koko na biso Yakobi oyo apesaki biso libulu oyo ; ye moko amelaki mayi na yango, na bana na ye, mpe na bibwele na ye ?

13Yesu azongiselaki ye :

—Moto nyonso oyo ameli mayi oyo, akoyoka lisusu posa ya mayi.
14Kasi oyo akomela mayi oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mayi te. Mpe mayi oyo ngai nakopesa ye, ekozala kati na ye esika oyo mayi ekobanda kobimaka tango nyonso, kino na bomoi ya seko.

15Bongo mwasi alobaki na ye :

—Tata, pesa ngai mayi yango, mpo nayoka lisusu posa ya mayi te, mpe nayaka awa te mpo na kotoka mayi.

16Yesu alobaki na ye :

—Kende, benga mobali na yo, mpe zonga awa !

17Mwasi azongisaki :

—Nazali na mobali te !

Yesu alobaki na ye :

—Olobi ya solo ete ozali na mobali te.
18Pamba te ozalaki na mibali mitano, mpe mobali oyo ozali na ye sikʼoyo, azali mpe mobali na yo te. Likambo olobi ezali ya solo.

19Bongo mwasi alobi na ye :

—Tata, namoni ete ozali moprofeta.
20Bakoko na biso bato ya Samariya basambelaki Nzambe na ngomba oyo ! Kasi bino Bayuda bolobaka ete esika oyo tosengeli kosambela ezali na Yeruzalem.

21Yesu azongiselaki ye :

—Mwasi, ndimela ngai : tango ezali koya oyo bokosambela Tata, na ngomba oyo te to mpe na Yeruzalem te.
22Bino bato ya Samariya bosambelaka oyo boyebi te ; kasi biso tosambelaka oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti na Bayuda. 23Kasi tango ezali koya mpe yango esiʼekomi, oyo basamopanga ya solo bakosambela Tata na Molimo mpe na solo ; pamba te, Tata alukaka bato oyo basambelaka ye na ndenge wana. 24Nzambe azali Molimo, mpe esengeli ete baoyo basambelaka ye, basambela ye na molimo mpe na solo.

25Mwasi alobaki na ye :

—Nayebi ete Masiya akoya, (ye oyo babengaka Kristo). Mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.

26Yesu alobaki na ye :

—Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Masiya !

27Bayekoli na ye bazongaki kaka na tango wana. Bakamwaki mingi awa bamonaki ete Yesu azalaki kosolola na mwasi. Kasi ata moto moko te na kati na bango amekaki kotuna ye : “Olingi nini ?” to mpe “Mpo na nini ozali kosolola na ye ?”

28Mwasi atikaki eloko na ye wana, azongaki na vile, mpe alobaki na bato :

29—Boya kotala moto moko ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaka. Boni, akoki kozala Kristo te ?

30Bato babimaki na vile mpe bakendaki epai ya Yesu.

31Na tango wana, bayekoli bazalaki kobondela Yesu mpe bazalaki koloba :

—Moteyi, lia !

32Kasi Yesu ayebisaki bango :

—Nazali na bilei oyo bino boyebi te.

33Bongo bayekoli balobanaki bango na bango :

—Boni, moto amemelaki ye biloko ya kolia ?

34Yesu alobaki na bango :

—Bilei na ngai, yango oyo : kosala mokano ya Ye oyo atindaki ngai, mpe kosilisa mosala na ye.
35Bino bolobaka ete etikali sanza minei mpo tobuka mbuma na bilanga ! Kasi ngai nalobi na bino : Botombola miso mpe botala bilanga ! Pamba te mbuma esiʼekomeli mpe ekoki mpo na kobuka ! 36Moto oyo abukaka azwaka lifuti, mpe azali kobomba bambuma mpo na bomoi ya seko. Mpo ete moloni mpe mobuki mbuma basepela elongo. 37Na boye nde lisese oyo emonani ete ezali ya solo : “Moto mosusu nde alonaka, mpe mosusu nde abukaka.” 38Natindaki bino bokende kobuka mbuma na elanga oyo bino bomonelaka pasi te. Bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali kobuka mbuma ya mosala na bango.

39Bato mingi ya Samariya ya vile wana bandimaki Yesu mpo na litatoli ya mwasi oyo alobaki : “Ayebisi ngai makambo nyonso nasalaki.” 40Tango bato ya Samariya bayaki epai ya Yesu, babondelaki ye mpo avanda elongo na bango. Bongo Yesu avandaki na bango mikolo mibale. 41Bato mingi mosusu bandimaki mpo na maloba na ye. 42Bongo bato yango balobaki na mwasi wana :

—Tondimeli ye kaka te mpo na makambo oyo oyebisaki biso, kasi mpo biso moko toyoki ye mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili !

Likamwisi ya mibale na Galileya

(tala Mt. 8.5-13 ; Lk. 7.1-10)

43Sima ya mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendaki na Galileya. 44Pamba te ye moko Yesu alobaki ete moprofeta azwaka lokumu te na ekolo na ye moko ! 45Tango akomaki na Galileya, bato ya Galileya bayambaki ye mpo bamonaki makambo nyonso oyo ye asalaki na Yeruzalem, na tango ya feti ; pamba te bango mpe bakendaki na feti.

46Bongo Yesu ayaki lisusu na Kana na Galileya, epai abongolaki mayi vino. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kapenawumi, mwana na ye ya mobali azalaki maladi. 47Tango ayokaki ete Yesu alongwaki na Yudea mpe akomaki na Galileya, akendaki kokutana na ye, mpe abondelaki ye mpo akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo azalaki pene ya liwa.

48Yesu alobaki na ye :

—Boni, soki bomoni bilembo te mpe makamwisi te bokoki kondima te ?

49Mokonzi wana alobaki :

—Tata, yaka liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa !

50Bongo Yesu alobaki na ye :

—Kende, mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu !

Moto yango andimaki maloba ya Yesu mpe azongaki.

51Tango azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye, mpe balobaki na ye : “Mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu”.

52Bongo atunaki bango soki na ngonga nini mwana akomaki malamu.

Bango bazongisaki :

—Fievre etikaki ye lobi na ngonga ya liboso sima ya midi.

53Tata ya mwana ayebaki ete ezalaki kaka na tango wana nde Yesu alobaki na ye ete mwana na yo azali nzoto kolongonu. Bongo ye na bato nyonso ya ndako na ye, bandimaki.

54Oyo ezali likamwisi ya mibale Yesu asalaki, sima ya kozonga na ye na Galileya wuta na Yudea.
Copyright information for LinMNB